1Alif, lâm, râ. buku eye tokitisi yango epai nayo ete obimisa na yango bato na molili komema bango na mwinda na ndingisa ya Nkolo wa bango, komema bango na nzela ya oyo azali na nguya atonda lokumu.
3Baye bazali коропа bomoyi ya nsé koleka oyo ya mokolo mwa suka mpe bazali kobundisa nzela ya Allah mpe bazali kolukela yango minyokoli. Bango bazali na libunga lia mosika.
4Mpe totindaki motindami te sé azala moto ya monoko ya bato naye, mpo alimbola bango malamu. Allah abungisaka oyo alingi, mpe akambaka oyo alingi. Mpe ye nde azali na bokasi atonda bwanya
5Мре tosilaki kotinda Mûssa na makamwisi ma biso, bimisa bato bayo na molili bakende na bongengi. Mpe yebisa bango ete bakanisa na mikolo mia Allah. Ya soló, bilembo bina bizali тропа bato banso bakangi mitema mpe bazali na botondi.
6Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye ete: Bokanisa bolamu ya Allah likolo na bino, tango alongisaki bino na maboko ya bato ya falo, baye bazalaki konyokolo bino na etumbu, mpe bazalaki koboma bana na bino ya mibali mpe kotika basi na bino, kasi wana ezali elembo enene ya bomekami тропа bino kowuta epai ya Allah.
7Mpe tango Nkolo wa bino alobaki: Soki ya sólo, bozali kotondo ngai, nakobakisela bino bolamu bwa ngai kasi soki bozangi ngai botondi, ya sólo etumbu na ngai ezali makasi.
9Boye sango ya baye balekaki liboso lia bino ekomelaki bino te ya bato ba Núh, na aad na Thamúd na baye balandaki bango sima? Moko te ayebi bango sé Allah. Batindami ba bango bayelaki bango bilembo, kasi balobaki na kotiya maboko ma bango na minoko mia bango: Tokondima te na maye botindami na yango, mpe tozali na tembe na maye bozali kobenga biso na yango koleka.
10Batindami na bango balobaki: Bozali kotiya tembe na Allah, mokeli wa likolo na mabele? Azali kobenga bino mpo alimbisa masumu ma bino, mpe Apesa bino eleko kino mikolo na bino mikoka. (bapengwi bakolobaka): Bozali bato lokola biso, boye bolingi koboisa biso na maye ba nkoko ba biso bazalaki kobondela boyela biso elembo ya polele!
11Batindami ba bango bayanolaki bango balobi: Ya soló penza, tozali bato lokola bino, kasi Allah asalisaka oyo alingi o kati ya bawumbu baye. Biso tokoki koyela bino bilembo te sé ezala na bolingi bwa Allah, mpe epai na Allah nde esengeli na bandimi bamipesa.
12Mpe тропа nini tokomipesa na Allah te asilaki kokamba biso o nzela ya malamu eye tozali kolanda? Mpe Tokakanga mitema тропа minyokoli mia bino, mpe epai ya Allah, bandimi bamipesa.
13Мре bapengwi balobaki na batindami na bango ete: Tokobimisa bino na mabele ma biso, longola sé soki bozongi na lingomba lia biso. Na yango, Nkolo wa bango akitiseli bango emoniseli ete: Tokoboma babubi.
18Ndakisa ya misala ya baye bapengwi na Nkolo wa bango, ezali lokola mputulu ememami na mopepe ya makasi, bakokoka kozua litomba na eloko te na maye basalaki, wana ezali libunga ya mosika.
21Мре bawei banso bakobimaka о malita ma bango тре bakotelemaka o liboso lia Allah тропа kokata makambo, mpe bato bamotawu bakolobaka na ba oyo ya makasi mpe ya lolendo: Tozalaki kolanda bino, bokoki kokimisa mpe kobikisa biso na etumbu ya Allah te? Bakoyanolaka: Soki Allah akambaka biso tolingaki kokamba bino, tokokoka komisalisa te ata soki tozeli, mpe tozali na esika ya kokimela te.
22Mpe tango makambo manso makosilaka kokatama, satana akoloba na (bato ya lifelo): Ya soló, Allah alakaki bino elaka ya bosóló, ngai nalakaki bino elaka kasi nakokisi yango te. Mpe nazalaki na bokonzi likolo na bino te, kasi ngai na bengaki bino mpe bondimelaki ngai. Bo pamela ngai te, bomipamela bino moko. Ngai nakosalisa bino te mpe bino bokosalisa ngai te. Ya sólo, ngai naboyi na maye bosangisaki ngai na yango liboso (тропа Allah) ya sólo bato mabe bakozuaka etumbu ya makasi.
23Мре bakokotisama baye bandimaki mpe basalaki misala milamu o Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakozalaka o kati na yango libela, na bolingi bwa Nkolo wa bango. Мре kuna losako na bango lokozala sé ete: (salam) kimia.
27Allah azali kolendisa bandimi na liloba litongami malamu, kati ya bomoyi ya nsé mpe na mokolo mwa suka, mpe azali kobungisa babubi, mpe Allah asalaka oyo alingi.
30Mpe batieli Allah binzambe nzambe, тропа kobungisa na yango bato nzela naye. Loba: Bosepela (na bomoyi bwa mokili) kaši nzela na bino ezali ya sôló okati ya moto ya lifelo.
31Loba na bawumbu na ngai baye bandima ete: Batelemisa losambo mpe na maye topesaki bango babimisa yango na polele to na sekele liboso ete eyela bango mokolo oyo mombongo ekozala te mpe kimoninga ekozala te.
32Allah nde mokeli wa likolo na nsé, mpe akitisaka mayi kowuta o mapata ezali kobimisa na yango bambuma mpo ezala bozui bwa bino. Мре apeși bino maye ya kosala masuwa mpo etambola na ebale. Na mitindo mia ye, mpe atieli bino mingala.
34Mpe apesaka bino nyonso oyo bosengaka ye, mpe soki bolingi koyeba bolamu ya Allah oyo asaleli bino, bokokoka koyeba motango mwa yango te. Ya soló, moto alekisi ndelo na bopegwi mpe bobubi.
36Oh Nkolo wa ngai! Ya sôló, yango (bikeko) bisili kobungisa bato ebele. Mpe moto oyo akolanda ngai, ya soló azali wa ngai, kasi oyo akotosa ngai te, ya sólo, yo nde molimbisi otonda ngolu,
37Oh Nkolo wa biso! Ya sólo, natiki ndambu ya libota na ngai na nsé ya ngomba oyo, ezali na bato te mpe ezali na milona te, pene na ndako nayo esantu, Nkolo mpo été batelemisa losambo, mpe sala été bato bawuta mosika bakende kofanda na bango esika wana, mpe leisa bango bambuma mpo été batonda yo botondi,
38Oh Nkolo wa biso! Ya sólo penza, oyebi maye mabombami o mitema mia biso na maye tomonisaka polele, mpe eloko te ekoki kobombamela Allah ezala na nsé to na likolo.
45Boye bovandaki te na bisika bia baye babubaki milimo mia bango moko? Mpe bino boyebi polele ndenge nini tosalaki bango, mpe totangela bino bandakisa.
46Mpe basilaki kosala likita lia mabe, kasi likita lia bango wana liyebani epai ya Allah, ata soki likita lia bango lizali makasi ekoki kopanza ngomba te.
52Oyó ezali sango mpe liyebisi (kurani) тропа bato bakeba na yango, mpe bayeba ya sólo ete, ye Nzambe (Allah) azali sé ye moko, na yango esengeli na bato ya mayele basosola.