The Most High · al-A'la · سورة الأعلى · 19 ayahs

بِسْمِ اللَّهِ الرَّحْمَٰنِ الرَّحِيمِ

Okombo ya Allah wa boboto atonda ngolu.

سَبِّحِ اسْمَ رَبِّكَ الْأَعْلَى

S anzola kombo ya Nkolo nayo oyo azali na likolo koleka,

الَّذِي خَلَقَ فَسَوَّىٰ

Oyo akela mpe akokisa,

وَالَّذِي قَدَّرَ فَهَدَىٰ

Mpe atia mokano mpe akamba o nzela ya nsemba,

وَالَّذِي أَخْرَجَ الْمَرْعَىٰ

Mpe oyo abimisa matiti,

فَجَعَلَهُ غُثَاءً أَحْوَىٰ

Mpe apesi yango langi ya mayi ya mpondu.

سَنُقْرِئُكَ فَلَا تَنْسَىٰ

Tokotangisa yo na lolenge ete obosana te,

إِلَّا مَا شَاءَ اللَّهُ ۚ إِنَّهُ يَعْلَمُ الْجَهْرَ وَمَا يَخْفَىٰ

Sé na oyo ye moko Allah alingi, Nde ayebi maye mazali polele mpe maye mabombama.

وَنُيَسِّرُكَ لِلْيُسْرَىٰ

Mpe tokolakisa yo nzela ya pete.

فَذَكِّرْ إِنْ نَفَعَتِ الذِّكْرَىٰ

Pesa liteya na baye ekosalisa bango.

سَيَذَّكَّرُ مَنْ يَخْشَىٰ

Oyo azali na bobangi nde akokanisa.

وَيَتَجَنَّبُهَا الْأَشْقَى

Oyo Akomitia mosika na yango ye nde moto ya mpasi.

الَّذِي يَصْلَى النَّارَ الْكُبْرَىٰ

Oyo akozika na moto ya monene.

ثُمَّ لَا يَمُوتُ فِيهَا وَلَا يَحْيَىٰ

O’nteyi na yango akokufa te mpe akozala na bomoyi te.

قَدْ أَفْلَحَ مَنْ تَزَكَّىٰ

Asili kolonga oyo amipetoli,

وَذَكَرَ اسْمَ رَبِّهِ فَصَلَّىٰ

Akanisi kombo ya Nkolo naye mpe asambeli.

بَلْ تُؤْثِرُونَ الْحَيَاةَ الدُّنْيَا

Kasi bino bolingi na bolingo makasi bomoyi ya nsé,

وَالْآخِرَةُ خَيْرٌ وَأَبْقَىٰ

Nzoka nde bomoyi ya lobi nde ezali malamu mpe ekowumelaka seko.

إِنَّ هَٰذَا لَفِي الصُّحُفِ الْأُولَىٰ

Ya sôló oyo esila kokomama na mikanda ya yambo.

صُحُفِ إِبْرَاهِيمَ وَمُوسَىٰ

Mikanda ya Ibrâhîm mpe ya Mûssa.