The Sun · ash-Shams · سورة الشمس · 15 ayahs

بِسْمِ اللَّهِ الرَّحْمَٰنِ الرَّحِيمِ

Okombo ya Allah wa boboto atonda ngolu.

وَالشَّمْسِ وَضُحَاهَا

(Na lapi) na mwese mpe na bongengi na yango!

وَالْقَمَرِ إِذَا تَلَاهَا

(Mpe na lapi) na sanza ntango elandaka mwese!

وَالنَّهَارِ إِذَا جَلَّاهَا

(Mpe na lapi) na moyi ntango ezali kongala!

وَاللَّيْلِ إِذَا يَغْشَاهَا

(Mpe na lapi) na butu ntango ezipi (mokili).

وَالسَّمَاءِ وَمَا بَنَاهَا

Mpe mapata na oyo atongi yango!

وَالْأَرْضِ وَمَا طَحَاهَا

Mpe mabele na oyo atanda yango!

وَنَفْسٍ وَمَا سَوَّاهَا

Mpe na molimo na oyo abongisa yango,

فَأَلْهَمَهَا فُجُورَهَا وَتَقْوَاهَا

Mpe alakisi ye mabe naye mpe malamu naye (kobunga naye na bokambami)!

قَدْ أَفْلَحَ مَنْ زَكَّاهَا

Asili kolonga moto oyo apetoli (molimo naye),

وَقَدْ خَابَ مَنْ دَسَّاهَا

Asili kobebisama oyo aboyi kopetola yango.

كَذَّبَتْ ثَمُودُ بِطَغْوَاهَا

Bato ya Thamúd balekisaki ndelo mpe baboyi kondima,

إِذِ انْبَعَثَ أَشْقَاهَا

Ntango moto mabe kati na bango atelemaki.

فَقَالَ لَهُمْ رَسُولُ اللَّهِ نَاقَةَ اللَّهِ وَسُقْيَاهَا

Motindami ya Allah alobaki na bango ete: Oyó ezali náqah ya Allah botika yango emela mayi.

فَكَذَّبُوهُ فَعَقَرُوهَا فَدَمْدَمَ عَلَيْهِمْ رَبُّهُمْ بِذَنْبِهِمْ فَسَوَّاهَا

Kasi baboyaki koyoka maloba naye mpe babomi yango, Nkolo na bango abomaki bango pona lisumu wana mpe akitisaki etumbu likolo na bango.

وَلَا يَخَافُ عُقْبَاهَا

Mpe (Allah) azali na bobangi te na maye makoya sima.