اقْرَأْ بِاسْمِ رَبِّكَ الَّذِي خَلَقَ
Tanga na kombo ya Nkolo nayo oyo akela,
بِسْمِ اللَّهِ الرَّحْمَٰنِ الرَّحِيمِ
Okombo ya Allah wa boboto atonda ngolu.
اقْرَأْ بِاسْمِ رَبِّكَ الَّذِي خَلَقَ
Tanga na kombo ya Nkolo nayo oyo akela,
خَلَقَ الْإِنْسَانَ مِنْ عَلَقٍ
Akela moto kowuta na liboke ya makila.
اقْرَأْ وَرَبُّكَ الْأَكْرَمُ
Tanga mpo Nkolo nayo azali malamu.
الَّذِي عَلَّمَ بِالْقَلَمِ
Oyo atangisi na ekomeli.
عَلَّمَ الْإِنْسَانَ مَا لَمْ يَعْلَمْ
Atangisi moto maye azalaki koyeba te.
كَلَّا إِنَّ الْإِنْسَانَ لَيَطْغَىٰ
Kasi ya soló, moto akomi motomboki,
أَنْ رَآهُ اسْتَغْنَىٰ
Ntango amimoni ete akomi na bozwi.
إِنَّ إِلَىٰ رَبِّكَ الرُّجْعَىٰ
Nzoka nde bozongi ezali epai ya Nkolo nayo.
أَرَأَيْتَ الَّذِي يَنْهَىٰ
Omoni te moto oyo azali kopekisa,
عَبْدًا إِذَا صَلَّىٰ
Mowumbu (ya Allah) ntango azali kosambela?
أَرَأَيْتَ إِنْ كَانَ عَلَى الْهُدَىٰ
Omonite soki azalaki na bokambi,
أَوْ أَمَرَ بِالتَّقْوَىٰ
To mpe azali kotinda bato na bobangi Allah?
أَرَأَيْتَ إِنْ كَذَّبَ وَتَوَلَّىٰ
Omoni te soki aboyi kondima to apeși mokongo?
أَلَمْ يَعْلَمْ بِأَنَّ اللَّهَ يَرَىٰ
Ayebi te ete ya soló, Allah azali kornona?
كَلَّا لَئِنْ لَمْ يَنْتَهِ لَنَسْفَعًا بِالنَّاصِيَةِ
Kasi soki atiki te, tokokanga ye na elongi naye.
نَاصِيَةٍ كَاذِبَةٍ خَاطِئَةٍ
Elongi ya moto ya lokuta mpe mosumuki.
فَلْيَدْعُ نَادِيَهُ
Kasi abenga lisanga naye.
سَنَدْعُ الزَّبَانِيَةَ
Biso tokobenga bakengeli ya lifelo.
كَلَّا لَا تُطِعْهُ وَاسْجُدْ وَاقْتَرِبْ ۩
Te, kotosa ye te, kasi pusana тре fukama (pembeni ya Nkolo nayo).